Salela lecteur ntango data ya telefone ezali moke
Pona liboso ya kobɛta
Pona monɔkɔ, mokanda mpe mokapo liboso ya kofina play. Lecteur etyaka mongongo ntango obandi kobɛta. Mongongo ebɛtaka yango moko te.
Mongongo esalelaka data ntango ezali kobɛta. Motángo etaleli enregistrement mpe ntango oyo ozali kotánga. Pemisa lecteur ntango olingi kotika.
Zonga na esika otikalaki
Soki esika ya kobomba na navigateur ezali, site ebombaka esika na yo na navigateur yango moko. Fungola lokasa ya monɔkɔ mpe salela lien ya kozonga.
Bomba adrɛsi ya mokapo soki olingi kozonga na telefone to navigateur mosusu. Adrɛsi yango eponaka mokapo; esika ebombami etikalaka na navigateur ya liboso.
Soki kobɛta etiki
Talá connexion na yo mpe finá play lisusu. Sima ya kopemisa ntango molai, zongisa lokasa soki lien ya mongongo esili.
Lecteur ya web oyo esengeli na internet. Ezali kopesa téléchargement te mpo na kotánga sans internet.
